Psalms 115

Nkembo kaka na Nzambe !


1 Na biso te, Yawe, na biso te,
kasi nkembo ezala na kombo na yo
mpo na bolingo na yo
mpe mpo na boyengebene na yo.

2 Mpo na nini bikolo ezali koloba :
“Nzambe na bango azali wapi ?”

3 Kasi Nzambe na biso azali na Likolo ;
Ye asalaka nyonso oyo esepelisaka ye.

4 Kasi bikeko na bango
ezali palata mpe wolo ;
esalama na maboko ya bato.

5 Ezali na minoko, kasi ekoki koloba te ;
miso, kasi ekoki komona te ;

6 ezali na matoyi, kasi ekoki koyoka te ;
zolo, kasi ekoki koyoka solo te ;

7 ezali na maboko, kasi ekoki kosimba te ;
makolo, kasi ekoki kotambola te ;
to ekoki kobimisa te makelele na mingongo na yango.

8 Baoyo basalaka yango, bakozala lokola yango
mpe bongo ekozala baoyo nyonso batiaka mitema na yango.

9 E ndako ya Isayele, tia motema na yo na Yawe ;
azali lisalisi na bino
mpe libende ya makasi oyo ebatelaka bino.

10 E ndako ya Aron, tia motema na Yawe ;
Ye azali lisalisi na yo
mpe libende ya makasi oyo ebatelaka yo.

11 Bino baoyo bobangaka Ye,
botia motema na Yawe,
Ye azali lisalisi na bino
mpe libende ya makasi oyo ebatelaka bino.

12 Yawe akanisi biso, mpe akopambola biso :
akopambola ndako ya Isayele,
akopambola ndako ya Aron ;

13 akopambola baoyo babangaka Yawe,
bato pamba mpe bato minene ;

14 Tika ete Yawe akanisa bino ebele,
bino mpe bana na bino !

15 Tika ete bopambolama epai na Yawe,
Mozalisi ya likolo mpe se !

16 Likolo oyo etombuana koleka ezali ya Yawe
kasi se, apesa epai ya moto.

17 Ezali te bato bakufa oyo basanzolaka Yawe,
baoyo bakendeke na esika ya nye ;

18 ezali biso nde tonetolaka Yawe,
sikʼoyo mpe libela na libela.
Bosanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB